Etinda ya Sanza ya Mpo ya Bokasi ya Bilenge Sanza ya misato 2026
Esode 12
Pasika na Biso—Elambo
Ezali na mokangano katikati ya Pasika ya kala mpe elambo na biso ya poso na poso.
Mayemi na Apryl Stott
Liboso Bayisalaele ya kala bakoka kotika boombo na bango na Ezipito, basengamaki batosa mitindo ya ndenge uta na Nkolo mpo ete anjelu mobebisi asimba bango te, to aleka bango likolo (tala Esode 12). Nsima ya kotika Ezipito, Bayisalaele bazalaki kosala feti mobu moko na moko, ebengamaki Pasika, mpo na komikundola lolenge nini Nkolo akangolaki bato na Ye ya boyokani.
Na poso ya nsuka ya bomoi na Ye ya bokufi, Yesu Klisto azalaki na elambo ya Pasika. Sikawa tobengaka elambo wana Elambo ya Nsuka. Mobikisi asalelaki libaku wana mpo na koyingisa bokuli ya elambo, kati na wapi tosalaka elongo poso nyonso. (tala Matai 26:26–28; Luka 22:19–20; Malongi mpe Mayokani 20:77, 79.)
Botala bokokanisi mibale katikati ya Pasika ya yambo, Elambo ya Nsuka ya Nkolo, mpe elambo ya lelo oyo ekoki kosalisa biso tomikundola bokangoli na biso na nzela ya Mobikisi.
Lipa
Pasika: Mpo na mikolo nsambo, Bayisalaele baliaki lipa ezanga levile (oyo elambamaka na lobango koleka mpe elembaka mpe epolaka noki te).
Elambo ya Nsuka: Yesu KlIsto apambolaki mpe abukaki lipa ya levile te ya Pasika, mpe Apesaki yango na bayekoli . Alobaki na bango balia yango na bomikundoli ya nzoto na Ye, oyo Ayebaki ekobukama mpe ekokufa kasi ekotelema lisusu.
Elambo: Toliaka lipa na bomikundoli nzoto ya Yesu Klisto.
Yesu Klisto azali Lipa ya Bomoi. Na nzela ya Bosekwi na Ye, tokosekwisama banso na banzoto ebonga nie, ezanga mbindo, ezanga kufa. Akangoli biso uta na liwa
Makila ya Mwana na mpate
Pasika: Mwana na mpate ya Pasika azalaki mwana mpate ya mobali azanga elembo, ya mobu moko. Ebomamaki, mpe makila na ye etiamaki na saani. Lisope (lititi ya lidusu) etiamaki na saani mpe esalelamaki mpo na kopapakola makila nzinganzinga ya libanda ya kadele ya ekuke Oyo ezalaki elembo ya libanda kolakisaka bato ya boyokani ya Nkolo balekama likolo na anjelu mobebisi mpo ete bakoka kolimbisama uta na boombo na Ezipito.
Elambo ya Nsuka: Yesu Klisto asalelaki vino mpona kolakisa makila na Ye. Alobaki na bayekoli na ye bamela yango na bomikundoli ya makila na Ye, oyo ekosopana mpo na bango mpo na bolongwi na masumu mpe lokola eteni ya boyokani ya sika.
Elambo: Tomelaka mayi na bomikundoli ya makila ya Yesu Klisto.
Yesu Klisto azali Mwana Mpate ya Nzambe. Makila na Ye esopanaki ntango Anyokwamaki mpo na masumu mpe bokono na biso. Makila na Ye—libonza na Ye—epetolaki biso. Akangoli biso uta na lisumu.
© 2026 na Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly For the Strength of Youth Message, March 2026. Lingala. 19936 639