Mpo ya Bokasi ya Bilenge
Bolingi Kozala na Esengo Koleka? Bomeka Botondi
Mpo na Bokasi ya Bilenge Sanza ya libwa 2026


Etinda ya Sanza ya Mpo na Bokasi ya Bilenge, , Sanza ya mibale 2026

Olingi Kozala na Esengo Koleka? Bomeka Botondi

Ntango bomoi na bino ezali ba mbongwana etondi, botondi ekoki kosalisa bino kotia makanisi malamu mpe kotikala na elikya koleka.

moto moko na nse ya lipata ya mbula, mpe moto moko azingami na bandeke mpe mapekapeka mpe bafololo.

Bililingi na Maggie Stephenson

Bokozala na esengo ya koleka bobele soki bozali na botondi.”

Kaka lokola lisakola ya Mpaka Elder Gary B. Sabin ya Bazomi na nsambo elobi, esengo na bino elandisama mbala moko na botondi na bino. Yango ezali solo—ntango ozali na botondi, botiaka makanisi na makambo malamu ba esika ya makambo mabe.

Nzokande, bomoi etambolaka ntango nyonso te ndenge tokongisa. Bambonguana ezalami te ekoki kotungisa bino koleka, kopesa mawa, to konyokola makanisi na esika ya esengo. Kasi ntango makambo ezali makasi, botondi ekoki kosalisa bino kotikala na elikya. Bomeka banzela oyo misato mpo na komema botondi koleka na bomoi na bino.

1. Boluka Bolamu

Mingimingi, ezalaka mpasi makasi mpo na kozala na botondi ntango boyoki lokola bobungisi eloko moko Kasi mapamboli nini bokoki kotia pembeni na kotiaka makanisi na oyo bino bozali te na yango na esika ya oyo bozali na yango?

Ntango bozali koluka ya malamu na bomoi na bisno, sima ya mikolo ekokoma pete mpo na komona yango.

2. Kolakisa Botondi na Mopesi

Ntango botangi mapamboli na bino, bobosana te esika yango ewutaki.

Kotondaka Tata ya Lola mpo na makabo na Ye—kosangisaka likabo ya Mwana na Ye ya mobali—ekoki kokomisa bozindo bolingo mpe bondimi na bino epai na Ye Mokambi D. Todd Christofferson, Mopesi toli ya Mibale na Bokambi ya Yambo, alimbolaki lisusu, “Koyokaka mpe kolakisaka botondi na Nzambe … ekotisaka lolenge ya esengo ya sika,” komemelaka bino esengo mpe bokasi mpe kosalisaka litatoli na bino ebatelama.

3. Botia makanisi na Mwango ya Tata na Lola

Bosolo, kozalaka na botondi elingi koloba koyangana makambo ya pasi ya bomoi to koyokaka esengo ntango nyonso. Atako Yesu Klisto ayokaki mpe ayebaki pasi (tala Alma 7:11; Malongi mpe Mayokani 19:18–19). Mawa ezali eteni moko ya motuya na bokufi.

Kasi atako bongo, eloko moko ekobonguana te: mwango ya ngolu ya Tata ya Lola. Mawa mpe monyokoli boyoki na bomoi ekokoma malamu mpo na Yesu Klisto mpe bomikabi na Ye (tala Limonisi 21:4).

Mpaka Dieter F. Uchtdorf ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale alimbolaki: “Kozalaka na botondi na ntango ya mikakatano elakisi te ete tozali na esengo na ndenge na biso. Elakisi ete na nzela ya miso ya bondimi totali likolo ya mikakatano na biso ya mokolo ya lelo.”