Etinda ya Sanza Mpo na Bokasi ya Bilenge, Sanza ya minei 2025
Lisalisi uta na Yesu Klisto: Ba Mpo na nini mpe Lolenge nini
Bososola mpo na nini Yesu Klisto azali eyano mpe lolenge nini Asalisaka bino.
Elilingi na Dan Wilson
“Nazali koyoka lokola nazali kokoba kosala mabe. Ezali mpasi kokoba komeka.”
“Likambo na ngai ezali mpasi. Nayebi te lolenge nini nakokende liboso.”
“Nazali komitungisa etali mikolo mikoya. Nayebi te soki nazali na oyo esengeli mpo na kolonga.”
“Nalembi, kasi ezali naino na makambo mingi ya kosala.”
Bokoki koyeba moko ya makambo oyo? Mokambi Russell M. Nelson ateyi, “Atako mituna to makambo nini bozali na yango, eyano ezwami kaka na bomoi mpe mateya ya Yesu Klisto” (“Eyano Ezali Ntango Nyonso Yesu Klisto,” likita linene ya Sanza ya minei 2023 [Liahona, Sanza ya mitano 2023, 127]).
Ezali pete ya koloba, “Yesu Klisto azali eyano.” Ezali kosenga mwa milende mosusu mpo na kososola mpo na nini mpe lolenge nini Ye azali eyano.
Mpo na nini Klisto Azali Eyano?
Ntango Anyokwamaki na mbeka ya bomikabi na Ye, Mobikisi asalaki biloko misato ya motuya:
-
Alongaki liwa, kopesaka biso likoki ya kosekwisama.
-
Afutaki ntalo mpo na masumu nyonso, kopesaka biso likoki ya koyambola, kokola, mpe kozonga epayi ya Nzambe. Yango esalisaka biso lisusu tolimbisa basusu ntango basali masumu, mpo ete Klisto amemaki masumu na bango likolo na Ye moko.
-
Akutanaki na bampasi, mitungisi, masenginia, bolozi, mpe bokono ya ndenge na ndenge (botala Alma 7:11–13). Yango elingi koloba ete Ayebi mpenza ndenge nini kosalisa mpe kobikisa bino mpe akoki kolendisa bino mpo na koyika mpiko na mimekano mpe kosala makasi ya kokoma malamu koleka.
Bozwa likambo nyonso, mpe bokoki kokangisa nsima eyano na moko to mingi ya bosolo misato yango.
Bobola? Mpo ete Yesu Klisto akutanaki na makambo nyonso, Ayebi malamu lolenge yango ezali. Alongolaka ntango nyonso mikakatano te, kasi Akoki kopesa bato makasi ya komema bozito wana (botala Mosiya 24:15).
Bokweyi? Mpo ete Klisto alongaki lisumu, bokweyi na biso esengeli te kozala ya ntango nyonso. Boyamboli esangisi komibongisa mpe kokoma mingi moto oyo Ye ayebi ete tokoki kozala.
Maladi? Mpo ete alongaki liwa, tokosekwisama na banzoto ebonga nie oyo ekoki kozwa maladi mpe mpasi te. Klisto mpe “[akamataki] likolo na ye … bokono” (Alma 7:11), kokomisaka Ye moto abonga nie mpo na kopesa libondisi mpe lisalisi.
Lolenge nini Klisto Asalisaka?
Kasi ata ntango toyebi mpo na nini Mobikisi azali eyano (mpo na oyo Ye azali mpe nini Ye asali mpo na biso), tozali kaka na mposa ya koyeba lolenge nini tozwaka lisalisi mpe makasi uta na Ye. Botala mwa makambo ya kosala:
Losambo. Na kosambelaka na nkombo ya Yesu Klisto, bato bakoka te lokola biso bakoki kosolola elongo na Nzambe abonga nie. Tokoki kosambela mpo na makasi tozali na yango mposa na likambo nyonso, mpe Nzambe akoyanola—kaka te na lolenge biso tolingi to tozali kozela, kasi na lolenge oyo ekopambola biso. Libiangi ya Mobikisi ezali ya solo: “Bosenga, mpe bokozwa” (Yoane 16:24; 3 Nefi 27:29; Malongi mpe Mayokani 4:7).
Likabo ya Molimo Mosantu. Tata na Lola, Yesu Klisto, mpe Molimo Mosantu bazali na mokano moko. Bazali kosala elongo! Ntango nyonso oyo boyoki botambwisi to libondisi uta na Molimo Mosantu, bokoki kososola yango lokola nde Klisto azali kosalisa bino mpe.
Kobomba Mayokani. Mpaka Dale G. Renlund ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale ateyi: “Liloba nzela ya boyokani ezali kolakisa molongo ya mayokani oyo ekomisaka biso epayi ya Klisto mpe ekangisaka biso na Ye. Na nzela ya boyokani oyo, tozali na likoki ya kozwa nguya na Ye ya seko” (likita linene ya Sanza ya minei 2023 [Liahona, Sanza ya mitano 2023, 36]).
Ngolu. Ntango tozali kotia bondimi kati na Yesu Klisto mpe koyambola, tokoki kozwa lisalisi mpe makasi mosusu (ebangamaka lisusu ngolu) mpo na kokokisa makambo oyo tokokaki te kosala bisomei (botala Mokambi na Makomi, “Ngolu”). Makasi oyo, to ngolu, ekoki koya na ndenge ebele: uta na Molimo Mosantu, moninga, mopaya, liyoki. Mingi mingi, eloko nyonso ya malamu ewutaka na Klisto (botala Moroni 7:22). Ntango bozwi kaka mwa motema molai, mwa nguya, mwa makasi mpo na koyika mpiko, bomona yango lokola nde Klisto azali kosalisa bino.
Bomikundola Mpo na nini mpe Lolenge nini
Sikawa mbala nsima bokozala na mposa ya eyano na motuna to likambo, botalela Klisto. Bomikundola ete mpo na elonga na Ye likolo ya lisumu, liwa, mpe mikakatano mosusu nyonso ya kufa, eloko moko te ezali mpasi. Boluka ndenge Akoki kopambola bino, mpe bokomona bopusi na Ye na bomoi na bino. Ye alingaka bino mingi!
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly For the Strength of Youth Message, April 2025. Lingala. 19625 639