Etinda ya Sanza ya Mpo ya Bokasi ya Bilenge, Sanza ya misato 2025
Ndenge nini tozali kobika na mokili mpe “kotia pembeni biloko ya mokili oyo ”?
Bayekoli Oyo Aponaki, na Casey Childs
Nkolo alobi, “Okotika makambo ya mokili oyo, mpe okoluka makambo ya malamu koleka” (Malongi mpe Mayokani 25:10). Yango elingi koloba te ete tozali koboya bamposa na biso ya ntango mpe ya mosuni, kasi elingi koloba ete totia mitema na biso te na bomengo, nguya, esika, to kondimama ya mokili. Tala mwa mitinda oyo bateyaki biso mpo na kozala na bomoi na mokili:
Botia makambo ya Nzambe liboso. “Boluka liboso bokonzi mpe Nzambe, mpe boyengebene na ye” (Matai 6:33 Na mitema na biso mpe na bomoi na biso, mitindo ya Nzambe mpe mayokani na biso elongo na Ye ezali likambo na biso ya yambo.
Bouka koyekola. “Ntango bozali koyekola na ntina ya mokili nzinganzinga na bino, boyekola lisusu na ntina ya Mobikisi. … Soki bozali koyekola mingi, bokoki kosalisa mpo na kotonga bokonzi ya Nzambe mpe kosala bopusi likoló na mokili mpo na bolamu” (Mpo na bokasi ya bilenge: Motambwisi mpo na kosala maponi [2022], 31, 32).
Mosala. “Mosala ezali etinda ya motuya ya nsango malamu. Ezali kolendisa bokoli mpe kokolisa biso. … Nkolo alingi kaka te ete tokokisa mpo na mabota na biso, kasi ‘tomitungisa na likambo moko ya malamu’ [Malongi mpe Mayokani 58:27]” (“MisalaMito ya makambo mpe mituna, Biblioteke ya Nsango Malamu).
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Mpo na Bokasi ya Bilenge Etinda ya Sanza, Sanza ya misato 2025. Lingala. 19628 639