“Pasika,” Moninga, Sanza ya minei 2026, 46–48.
Etinda ya Sanza Moninga , Sanza ya minei 2026
Pasika
Mose akendaki epai ya Falo mpe asengaki ye asikola baombo ya Bayisraele. Falo aboyaki. Nkolo atindaki malonzi na Ejipito, kasi Falo alobaki kaka te.
Nkolo alobaki ete Akotinda bolozi moko ya nsuka. Mwana ya liboso nyonso ya libota ya Ejipito akokufa. Kasi Bayisraele balandaki malako na Ye, bolozi ekoleka likolo na bango.
Nkolo ayebisaki Bayisraele ete bapesa mbeka ya mwana-mpate ya mobali ya kokoka mpe bapakola langi na makila ya mwana-mpate likolo ya bikuke na bango.
Bolozi eyaki. Bana nyonso ya liboso ya Ejipito bakufaki, ata mpe mwana ya Falo. Kasi bana ya liboso ya Yisraele babikaki mpo batosaki Nkolo.
Falo ayebisaki Mose mpe Bayisraele ete balongwa na Ejipito. Kasi Falo asilikaki. Ye na mapinga na ye balandaki bango.
Bayisraele batyaki kaa na Mbu Motane. Ntango bamonaki Baejipito bazali koya, babangaki. Mose alobaki ete Nkolo akobatela bango.
Mose atombolaki linenda na ye, mpe Nkolo akabolaki mbu. Bayisraele bakatisaki na mabele oyo ekauka.
Ntango Bayisraele bazalaki na libateli na ngambo mosusu ya mbu, mai ekitaki mpe ezindisaki mapinga. Bayisraele bazwaki bonsomi na nsuka.
Kopakolaka langi na lokasa
Yesu Klisto asekwaki mpo na ngai
Elilingi na Audrey Day. Ekoki kozala kopi mpo na kosalela yango kaka na Eklezia.
Nini bokoki kosala mpo na kokanisaka Yesu Klisto na Pasika oyo mpe mbula mobimba?
© 2026 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly The Friend Message, April 2026. Lingala. 20062 639