“Profeta Mose,” Moninga Sanza ya misato 2026, 46–48.
Etinda ya Sanza ya Moninga , Sanza ya misato 2026
Profeta Mose
Mose azalaki Yisalaelite, kasi abokolamaki na mwana mwasi ya falo na Ezipito. Mose azalaki na mawa ete Baezipito bazalaki mabe epayi ya bato ya Yisalaele mpe bakomisaki bango baombo na bango.
Mokolo moko Mose amonaki Moezipito kobetaka Moyisaele. Mose abatelaki Moyisalaele.
Ntango Falo amonaki, alingaki koboma Mose, kasi Mose akimaki uta na Ezipito.
Mose ayaki na esika babengi Midyani, epayi wapi akutanaki na mwasi moko babengi Zipora. Babalanaki mpe babotaki bana.
Ntango azalaki kofanda na Midyani, Mose amonaki nzete moke oyo ezalaki kopela moto, kasi moto ezikisaki nzete moke te. Nkolo amimonisaki kati na moto mpe alobaki na Mose.
Nkolo alobaki Ayebaki ete bato ya Yisalaele bazalaki konyokama kati na Ezipito. Atindaki Mose azonga na Ezipito kokangola bato ya Yisalaele mpe kokamba bango na mabele ya elaka. Nkolo alobaki Akosalisa Mose akangola bato ya Yisalaele mpe kokamba bango na mabele ya elaka.
Lokasa ya kopakola langi
Nakoki Kozala na Boboto epayi ya Basusu
Bililingi na Audrey Day. Ekoki kozwama mpo na kosalela na Eklezia Kaka.
Nini okoki kosala poso oyo mpo na kozala boboto?
© 2026 na Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly The Friend Message, March 2026. Lingala. 19938 639