“Noa mpe Masuwa,” Moninga, Sanza ya mibale 2026, 46–48.
Etinda ya Sanza mpo na Moninga , Sanza ya mibale 2026
Noa mpe Masuwa
Noa mpe libota na ye batosaki Nkolo. Bato nyonso mosusu bazalaki bato mabe. Nkolo ayebisaki Noah ete mayi ekotondisa mabele soki bato bayamboli te.
Noa ayebisaki bato ete Nkolo alingaki bango mpe alingaki bango bayambola mpe bazala na bondimi na Yesu Klisto. Bango balingaki koyoka te.
Nkolo ayebisaki Noa atonga masuwa moko monene ebengami masuwa ya banyama. Masuwa ya banyama ekokaki kobomba Noa na libota na ye na bokengi na ntango ya mbula.
Noa na libota na ye bamemaki bilei na masuwa ya banyama Nkolo atindaki banyama mibale mibale ya lolenge nyonso mpo na Noa kokotisa bango na masuwa Nsima mbula ebandaki konoka.
Yango ebetaki mpo na mikolo 40 mpe butu 40. Mayi efinikaki mabele, kaka lolenge Nkolo akebisaki.
Libota ya Noa mpe banyama nyonso na masuwa basemaki na bokengi nyonso likolo ya mayi
Ntango mbula esilaki, masuwa etelemaki na mabele ekauka. Noa mpe libota na ye batondaki Nkolo mpo abatelaki bango. Nkolo alakaki ete akobomaka mokili na mayi ata mokolo moko te lisusu. Ye atindaki arc-en-ciel lokola elembo ya bokundoli ya eleka na Ye.
Lokasa ya kopakola langi
Kolandaka Profeta ya Nkolo Ekopambola Ngai
Elilingi na Audrey Day
Bokoki kosala nini mpo na kolanda profeta?
© 2026 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly Friend Message, February 2026.. Lingala. 19927 639