“Adama mpe Ewa,” Moninga, Sanza ya yambo 2026, 46–48.
Etinda ya sanza ya Moninga Sanza ya yambo 2026
Adama mpe Ewa
Adama mpe Ewa bazalaki bana ya yambo ya Tata na Lola na kobika na mabele. Bazalaki kobika na Elanga ya Edene.
Nzambe atikaki bango balia mbuma ya nzete nyonso longola moko. Soki baliaki mbuma kowuta na nzete ya boyebi ya bolamu mpe mabe, bakosengela kotika elanga mpe na solo bakoki kokufa. Kasi Satana akosaki bango. Alobaki ete soki baliaki mbuma, balingaki koyeba bolamu kowuta na mabe kasi balingaki kokufa te.
Ewa aponaki kolia mbuma.
Nsima apesaki Adama ndambu ya mbuma. Ye mpe lisusu aponaki kolia yango.
Nzambe mpe Yesu Klisto bayaki kotala bango, kasi Adama mpe Ewa babangaki mpe babombamaki. Nzambe atunaki soki baliaki mbuma kya nzete.
Adama mpe Ewa balobaki ete baliaki mbuma. Sikawa basengelaki kotika Elanga ya Edene. Kasi Nzambe azalaki na mwango mpo na bango. Sikawa bayebaki bolamu na mabe mpe bakokaki kobota bana.
Adama mpe Ewa balakaki kotosa mitindo ya Nzambe. Basosolaki mingi na ntina ya Mwana na Nzambe, Yesu Klisto. Basepelaki mpo na Alingaki kosalisa libota na bango ezonga epayi ya Nzambe.
Lokasa ya kopakola langi
Yesu Akelaki Mabele
Elilingi na Audrey Day
Eloko nini olingaka Yesu Klisto akelaki?
© 2026 na Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Etinda ya sanza Moninga, Sanza ya yambo 2026.. Lingala. 19919 639