“Basantu Bakeyi na Westi,” Moninga, Sanza ya zomi na mibale 2025, 26–28
Etinda ya sanza ya Moninga Sanza ya zomi na mibale 2025
Basantu Bakeyi na Westi
Nsima ya bokufi ya Joseph Smith, Brigham Young mpe Bapostolo mosusu bakambaki Eklezia. Brigham ayebaki ete Basantu basengelaki kolongwa na Nauvoo mpo ezalaki na kimya te. Kasi Nkolo alingaki basilisa naino kotonga tempelo.
Ntango tempelo esilaki, bankoto ya Basantu basalaki mayokani na Nkolo mpe batyamaki bilembo lokola mabota.
Sikoyo, ntango ekokaki mpo babanda mobembo na bango na wɛsti. Malili ezaliki makasi, bato bazalaki kobela mpe bazalaki na nzala.
Brigham asambelaki mpo na lisalisi. Nkolo alobaki ete basengeli kosalisana, mpe akopambola bango mpe akosalisa bango.
Mobembo ezalaki naino mpasi mpenza. Bato mosusu bakufaki. Kasi mpo na mayokani na bango ya tempelo, basantu bayebaki ete bakomona lisusu baye libota na bango.
Basantu ya liboso bakomaki na Lobwaku ya Salt Lake na 1847. Awa bakokaki kosambela Nkolo mpe kosala mosala na Ye na kimya nyonso.
Mibu mingi nsima, basantu mingi bayaki mpe batongaki batempelo mingi. Bamisionele basalaki mibembo na mokili mobimba mpo na koteya nsango malamu ya Yesu Klisto. Eklezia ya Mobikisi ekobaki kokola, kopambolaka bana ya Tata na biso ya likolo bipayi nyonso.
Lokasa ya kopakola langi
Ye azali Pole, Bomoi, mpe Elikya ya Mokili
Elilingi na Corey Egbert
Osalaka nini na Noele mpo na kokanisa Yesu Klisto?
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly Friend Message, December 2025. Lingala. 19637 639