2025
Jane Manning Asali Mobembo na Nauvoo
Sanza ya zomi 2025


“Jane Manning Asali Mobembo na Nauvoo,” Moninga, Sanza ya zomi 2025, 26–28.

Etinda ya Sanza Friend , Sanza ya zomi 2025

Jane Manning Asali Mobembo na Nauvoo

Moto azali kobatisa Jane Manning na esika ya libanda

Esika Jane Manning azalaki kofanda, bazalaki kozwa ye lokola mobola mpo na langi ya loposo na ye. Mokolo moko, ayokaki misionele moko azali koteya. Kala te abatisamaki.

Jane mpe libota na ye batelemi na libongo pene ya bwatu

Libota ya Jane ebatisamaki mpe. Bango nyonso balingaki kozala na Basantu na Nauvoo. Bongo babandaki mobembo na bango.

Jane mpe libota na ye bamemi basaki mpe bazali kotala masuwa ezali kokende na ebale

Libota ya Jane elingaki kokende mobembo na masuwa mpo na eteni ya mobembo, kasi bazalaki na mosolo yo kokoka te. Bongo basengelaki kotambola bakilometele (1,300 km).

Jane mpe libota na ye kotambolaka na basapatu elemba mpe bilamba ya potopoto

Basengelaki kokatisa ebale moko ya mozindo mpe kolala libanda na malili. Kasi bazalaki na ekateli ya kokoma na Nauvoo. Bamisepelisaki na koyembaka ntango bazalaki kotambola.

Jane kokangaka bandaje na lokolo ya mobali moko

Libota ya Jane etambolaki kino basapatu na bango efungwamaki mpe makolo na bango esalaki pasi. Kasi ntango basambelaki Nzambe mpo na lisungi, Abikisaki makolo na bango.

Etuluku ya bato bazali kotalaka Jane na mwasi moko kosimbaka mwana ya maladi

Basalisaki bato oyo bazalaki kokutana na bango na nzela. Basalisaki kutu kobikisa mwana ya maladi mpo na bondimi na bango.

Jane koyambaka Emma Smith na Joseph Smith kosekaka

Na nsuka, Jane mpe libota na ye bakomaki na Nauvoo! Ntango Joseph Smith ayokaki nyonso oyo bakutanaki na yango, ayebisaki Jane, “Nzambe apambola bino. Bozali na kati ya baninga sikawa.”

Kopakolaka langi na lokasa

Yesu Alingi Ngai Nalinga Bato Nyonso

Kotia langi na lokasa ya PDF ya bana mibale bafandi na kiti

Liyemi na Corey Egbert

Lolenge nini olakisaka bolingo epai ya basusu?