“Kotonga Nauvoo,” Moninga, Sanza ya libwa 2025, 26–28.
Etinda ya Sanza ya Moninga, Sanza ya libwa 2025
Kotonga Nauvoo
Nkolo ayebisaki Basantu basangana na esika ya sika. Ezalaki penepene na ebale moko monene, epayi wapi mabele ezalaki na mayi mpe na potopoto. Emonanaki lokola esika malamu te mpo na kotonga engumba. Kasi Profeta Joseph Smith ayebaki ete na lisalisi ya Nkolo, bakokaki kokomisa yango kitoko.
Basantu basalaki mosala makasi mpo na kokomisa yango esika malamu ya kofanda. Joseph abengaki engumba Nauvoo, oyo elimboli “esika kitoko.”
Nkolo alingaki Basantu na Ye batonga tempelo moko na Nauvoo. Bato babandaki kosala mosala nokinoki.
Nkolo azalaki na mapamboli minene ya kopesa bato na Ye. Na kati ya tempelo, bakokaki kosala mayokani, to bilaka ya sikisiki, elongo na Nkolo. Balingaki mpe koyekola etali mwango ya Tata na Lola ya esengo mpo na bana na Ye nyonso.
Basantu basalaki mosala makasi mpo na kotonga tempelo. Ezwaki ntango molai, kasi basepelaki mingi mpo na koyeba bilaka ya ntina oyo Nkolo azalaki na yango mpo na bango kati na tempelo na Ye.
Lokasa ya kopakola langi
Tempelo Ezali Ndako ya Nkolo
Elilingi na Corey Egbert
Oyokaka nini ntango omonaka tempelo?
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly Friend Message, September 2025. Lingala. 19640 639