Etinda ya Sanza ya Moninga Sanza ya nsambo 2025
Bapostolo Bazali Kosala Misio na Grande-Bretagne
Nkolo alobaki na Joseph Smith atinda ndambo ya Bapostolo na misio ya Grande-Bretagne. Ezalaki pasi mpo na Bapostolo batika mabota na bango, kasi Nkolo alakaki kopambola bango.
Heber C. Kimball mpe mwasi na ye, Vilate, bazalaki na libota ya elengey. Ebele kati na bango bazalaki kobela makasi.
Brigham Young azalaki mpe kobela, mpe libota na ye ezalaki mobola. Kasi ya Brigham, Mary Ann, alobaki na ye, “Kende mpe kokisa mosala na yo, mpe Nkolo akopambola yo.”
Heber mpe Brigham bayokaki malamu koleka, kasi bazalaki ya kolemba makasi. Balingaki koteya nsango malamu, boye bapesaki mbote ya kolaka na mabota na bango mpe ba;ataki na sima ya gbabga moko po na kobanda mobembo na bango
Sima mobembo molayi na kati ya ebale, Heber mpe Brigham bakomaki na Grande-Bretagne Elongo na Bapostolo mosusu, bateyaki nsango malamu na bato ebele Bankoto ya bato bababtisamaki kati na Eklezia ya Yesu Klisto Ebele kati na bango babukangi na masuwa mpo na kokutana na Bansantu ya Etats-Unis.
Nkolo abombaki elaka na Ye ya kobatela mabota ya Heber mpe Brigham ntango bango bazalaki kosalelaka Ye lokola bamisionele.
Lokasa ya kosala langi
Nzambe Akelaki Bikelamu Nyonso na Mabele.
Elilingi na Corey Egbert
Ekelamu nini bino bolingaka mingi?
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly Friend Message, July 2024, Lingala. 19639 639