Etinda ya Sanza Moninga, Sanza ya motoba 2025
Kotonga Templelo ya Kirtland
Nkolo alobaki na Joseph Smith ete ezalaki ntango ya kotonga tempelo moko na Kirtland, Ohio, USA. Yango ekozala esika moko ya sikisiki epayi wapi Nkolo akokoka kotala bato na Ye mpe kosala bilaka elongo na bango.
Basantu babandaki kotonga tempelo. Yango esengaki misolo ebele mpe esengaki mosala ebele. Kasi bango basepelaki koyamba mapamboli ya Nkolo.
Lokola Basantu basalaki na botongi ya tempelo, bakomaki kozanga mbongo. Babondelaki Nzambe mpo na lisungi.
Mwasi moko na nkombo ya Caroline Tippets mpe libota na ye babombaki misolo mingi. Bapesaki Ekelzia nzela ya kodefa mbongo mpo na kosalisa na botongi tempelo.
Basantu basalaki mosala makasi. Basusu bakumbaki bawago etonda na mabanga. Basusu basalaki bilamba mpe balambaki bilei mpo na basali.
Bana bazalaki kolokota biteni ya bitalatala ebukana mpo na kopanza yango mpe kotia yango na bifelo ya tempelo boye yango ekongala na pole ya moyi.
Kala te tempelo esilaki! Bansantu bazalaki na esengo ya kokende kati na ndako ya Nkolo mpo na kozwa mapamboli Ye alakaki bango.
Kopakola Langi na Lokasa
Nkolo Ayebi Nani Nazali mpe Alingaka Ngai.
Elilingi na Corey Egbert
Yema elongi na yo na lininisa. Lolenge nini oyebi ete Yesu Klisto alingi yo?
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly Friend Message, June 2025. Lingala. 19643 639