2025
Bonganganzambe Ezongisami
Sanza ya misato 2025


“Bonganganzambe ezongisami,” Moninga, Sanza ya misato 2025, 26–28

Etinda ya Sanza Moninga ,Sanza ya misato 2025

Bonganganzambe Ezongisami

Bokoki kotanga lisolo oyo na Joseph Smith—Lisolo 1:1–73 mpe Malongi mpe Mayokani 27:12.

Joseph Smith kolobaka na Oliver Cowdery na mbumae ya elelingi kolakisa Klisto kotalaka Banefi

Nsima ya Joseph Smith kozwa palaki ya wolo, abandaki kobongola yango. Oliver Cowdery akomaki makambo oyo alobaki. Ntango bazalaki kosala mosala, bayekolaki ete Yesu Klisto alingaki ete moto nyonso azwa libatisi.

Joseph Smith mpe Oliver Cowdery bazali kosambela kati na zamba

Joseph mpe Oliver bamitunaki nani azalaki na nguya ya Nzambe mpo na kobatisa bato. Bakendeki na zamba mpo na kosambela mpe kosenga Nzambe.

Anzelu na maboko na ye na moto ya Joseph Smith

Ntango bazalaki kobondela, anzelu moko abimaki. Alobaki ete azalaki Yoane Mobatisi, oyo abatisaki Yesu Klisto kala. Apesaki Joseph mpe Oliver Bonganganzambe ya Alona mpo ete bakoka kobatisa basusu. Bonganganzambe ezali nguya ya Nzambe Esalelamaka mpo na kopambola bana ya Nzambe.

Joseph Smith azali kobatisa Oliver Cowdery

Yoane Mobatisi ayebisaki Joseph mpe Oliver ete babatisama. Bakotaki na ebale moko mpe babatisanaki. Ntango babimaki na mayi, batondaki na Molimo Mosantu. Bazalaki na esengo mingi!

Banzelu misato bazali kotia maboko na bango na moto ya Joseph Smith

Na nsima, banzelu mosusu bayaki. Bantoma misato ya Yesu Klisto—Petelo, Yakobo, mpe Yoane—bapesaki Joseph mpe Oliver Bonganganzambe ya Melekisedeke. Sikawa Joseph mpe Oliver bakokaki kopesa likabo ya Molimo Mosantu na basusu.

Kopakola Langi na Lokasa

Yesu alingaka loyembo ya motema.

Motema na ba notes ya miziki

Elilingi na Corey Egbert

Boyyokaka ndenge nini ntango bozali koyemba mpo na Yesu Klisto?