“Joseph Smith Azwi Bapalaki ya Wolo,” Moninga, Sanza ya Mibale 2025, 26–28
“Nakoki kozala Motatoli Ete Buku ya Mormon Ezali ya Solo,” Moninga, Sanza ya Mibale 2025, 48.
Etinda ya Sanza mpo na Moninga, Sanza ya Mibale 2025
Joseph Smith Azwi Bapalaki ya Wolo
Okoki kotanga lisolo oyo na Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:28–60
Mbu misato nsima ya Lmoni ya Yambo, Joseph Smith ayokaki mabe na oyo etali mabunga mosusu oyo asalaka. Asambelaki Tata na Lola na oyo etali yango.
Ntango Joseph azalaki kosambela, pole etondaki na kisuku. Amonaki anzelu kotelemaka na mopepe. Kombo ya anzelu ezalaki Moroni.
Moroni alobaki ete ezalaki na buku moko oyo esalemaki na nkasa ya wolo, to bapalaki. Bakundaki yango na ngomba moko pene na ndako ya Joseph. Ezali lisolo ya bato oyo bazalaki kofanda na Amerika mibu mingi eleki. Moroni alobaki Nzambe akosalisa Joseph abongola buku yango.
Joseph akendaki na ngomba mpe amonaki bapalaki na nse ya libanga ya kilo. Moroni ayaki mpe alobaki ete Joseph abelemaki naino te mpo na kozwa yango.
Ntango Joseph akomaki mokolo, Moroni akutanaki na ye na ngomba mpe apesaki ye bapalaki. Moroni ayebisaki Joseph abatela yango na bokengi.
Joseph abandaki kobongola bapalaki na Angele. Asalelaki bisaleli ya sikisiki oyo ewuti na Nzambe mpo na kosalisa ye. Buku yango ebimisamaki na 1830 lokola Buku ya Mormon. Ezali koteya oyo etali Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye.
Kopakola Langi na Lokasa
Nakoki kozala Motatoli ete Buku ya Mormon Ezali Solo
Elilingi na Corey Egbert
Lolenge nini okoki kosalisa basusu koyekola oyyo etali Yesu Klisto na kati ya Buku ya Mormon?
© 2025 by Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly Friend Message, February 2025.. Lingala. 19641 639