“Nefi Azali Kosambela mpo na Bato,” Moninga, Sanza ya libwa 2024, 26–27.
Etinda mpo na Moninga Sanza ya libwa 2024
Nefi Azali Kosambela mpo na Bato
Bililingi na Andrew Bosley
Nefi azalaki profeta. Abengamaki nsima Nefi oyo azwaki bapalaki ya motako. Azalaki komitungisa mpo bato. Batikaki kolanda Nzambe.
Nefi akendaki na elanga na ye. Amataki na linongi na elanga mpe asambelaki epayi ya Nzambe kuna. Asambelaki mpo na bato.
Bato misusu bamonaki Nefi likolo ya linongi. Batelemaki mpo na koyoka mpe basangisaki basusu mpo na koyoka. Ntango Nefi asilisaki kosambela, amonaki bazalaki kotala mpe abandaki koteya bango.
Nefi asengaki bato bayambola. Basusu kati na bango balingaki te oyo Nefi azalaki koteyaka. Kasi basusu ebele bayokaki! Baponaki koyambola mpe kobongola bizaleli na bango.
Kopakola Langi na Lokasa
Yesu Asangisaka Biso Lokola Soso Asangisaka Bana na Ye
Liyema na Adam Koford
Lolenge nini oyokaka bolingo ya Yesu Klisto?
© 2024 na Intellectual Reserve, Inc. All rights reserved. Ebetami na USA. Bondimami na lokota ya Angele: 6/19. Bondimami ya bobongoli: 6/19. Bobongoli ya Monthly Friend Message, September 2024. Lingala. 19357 639